17
Okobonza te epai na Yawe, Nzambe na yo, ngombe to meme oyo ezali na mbeba to oyo ezali mabe, pamba te yango ezali likambo ya nkele liboso ya Yawe, Nzambe na yo.
Soki kati na moko ya bingumba oyo Yawe, Nzambe na yo, apesi yo ; emonani na mobali to mwasi oyo asali mabe na miso ya Yawe, Nzambe na yo, wana abuki boyokani elongo na Ye mpe akei kosalela banzambe mosusu mpe kofukamela yango : moyi, sanza to minzoto nyonso ya likolo, nzokande natindaki bango bongo te ; bongo bamemeli yo sango ya ndenge wana, yekola yango malamu. Soki emonani solo ete likambo ya nkele esalemi kati na Isalaele ; kamata mobali to mwasi oyo asali likambo wana ya nkele, mema ye na ekuke ya engumba na yo mpe bamba ye mabanga kino akokufa.
Ezali kaka na litatoli ya bato mibale to misato nde okoki koboma moto, kasi na litatoli ya moto moko te. Maboko ya motatoli nde ekozala maboko ya liboso ya koboma moto yango, mpe na sima, maboko ya bato nyonso. Na nzela wana nde okolongola mabe kati na yo.
Makambo ya kosambisa na Esika ya bule
Soki makambo oyo eleki yo makasi mpo na kosambisa ekomi na bisambiselo na yo, makambo lokola koboma bato, kowelana, kozokisa bato, mema yango na esika oyo Yawe, Nzambe na bino, akopona. Okokende epai ya Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi mpe epai ya mosambisi oyo azali kosala mosala na tango wana. Okotalisa bango likambo yango mpe bango nde bakokata likambo. 10 Bongo yo okosala kolanda mikano oyo bango bakopesa yo na esika oyo Yawe akopona. Sala keba ete osala makambo nyonso oyo bakotinda yo. 11 Okosala kolanda mobeko oyo bakoteya yo mpe bikateli oyo bakopesa yo. Kokende libanda te ya bikateli oyo bakopesa yo. 12 Moto oyo akosala lolendo mpe akoboya kotosa Nganga-Nzambe to mosambisi oyo atelemi mpo kosala mosala na esika oyo Yawe aponaki mpo na ye, basengeli koboma ye. Na nzela wana nde okolongola mabe kati na Isalaele. 13 Bato nyonso bakoyoka likambo yango, bakokoma na somo mpe bakosala lisusu lolendo te.
Mibeko na tina na mokonzi
14 Tango okokota na mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo ; tango okozwa yango mpe okovanda kati na yango, tango mosusu okoki koloba : « Tika ete toluka mokonzi oyo akokonza biso ndenge ezali na bikolo nyonso oyo ezingeli biso, » 15 sala keba ete opona kaka mokonzi oyo Yawe, Nzambe na yo, akopona. Asengeli kowuta kati na bandeko na bino. Kotia mopaya te oyo azali ndeko na bino te kati na Isalaele mpo na kokonza bino. 16 Nzokande mokonzi yango asengeli te kozala na bampunda ebele mpo na ye moko mpe kozongisa bato na Ejipito mpo na kobakisa motango ya bampunda, pamba te Yawe alobaki na bino : « Botikala kozonga lisusu te na nzela oyo. » 17 Asengeli te kozala na basi ebele noki te motema na ye ekopengwa. Asengeli te kozala na palata mpe wolo ebele koleka.
18 Tango mokonzi yango akovanda na kiti na ye ya bokonzi, akozwa buku ya Mobeko epai ya Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi mpe akokoma makambo oyo ezali na buku yango mpo na ye moko. 19 Akozala na buku yango tango nyonso mpe akotanga yango mikolo nyonso ya bomoi na ye mpo ete ayekola kokumisa Yawe, Nzambe na ye, mpe asalela malamu maloba nyonso ya Mobeko oyo mpe bikateli na yango ; 20 mpo ete atombola te na lolendo liboso ya bandeko na ye to abima te libanda ya mibeko na yango. Boye, ye elongo na bakitani na ye bakowumela tango molayi na bokonzi kati na Isalaele.