Mituna ya ndenge na ndenge
16
Makabo mpo na Lingomba ya Yelusalemi
Mpo na makambo oyo etali makabo ya kokongola mpo na basantu, bosalaka, bino mpe, kolanda mitindo oyo napesaki Mangomba ya Galatia. Tika ete moko na moko kati na bino, na mokolo ya liboso ya poso, abomba ndambo ya mbongo kati na ndako na ye, kolanda ezweli na ye, mpo ete bazela te kokoma na ngai mpo na kokongola makabo yango. Tango nakoya, nakotinda elongo na mikanda, bato oyo bino moko bokopona, mpo ete bamema makabo na bino kuna na Yelusalemi. Soki ekomonana malamu ete ngai mpe nakende, wana tokokende na bango nzela moko.
Mabongisi ya Polo
Sima na ngai kolekela na Masedwane, nakoya kotala bino, pamba te nasengeli kolekela kuna. Tango mosusu, nakovanda mwa mikolo epai na bino to nakolekisa kuna tango ya malili, mpo ete bopesa ngai, bino moko, makoki oyo nasengeli na yango mpo na kokoba mobembo na ngai kino epai nakokende. Na mbala oyo, naboyi komona bino na koleka, pamba te nazali na elikya ya kovanda mwa mikolo elongo na bino, soki Nkolo alingi. Kasi nakotikala awa, na Efeso, kino na mokolo ya Pantekoti, pamba te nakutani na libaku malamu ya kosakola Sango Malamu, mpe bayini bazali ebele.
10 Soki Timote akomi, bosala nyonso ete azala na kimia kati na bino, pamba te asalaka mosala ya Nkolo, lokola ngai. 11 Tika ete moto moko te atala ye lokola eloko ya pamba ! Bopesa ye makoki mpo ete asala mobembo ya malamu kino epai na ngai, pamba te nazali kozela ye elongo na bandeko.
12 Mpo na oyo etali Apolosi, ndeko na biso, nalendisaki ye makasi ete aya kotala bino elongo na bandeko, kasi aboyi kosala yango sik’oyo ; akoya kaka tango akokutana na libaku ya malamu.
Mitindo ya suka
13 Bosenzelaka, botelemaka ngwi kati na kondima, boyikaka mpiko, bozalaka makasi. 14 Bosalaka makambo nyonso na bolingo.
15 Bandeko na ngai, nazali lisusu kopesa bino etinda. Boyebi malamu ete Stefanasi mpe libota na ye bazalaki bato ya liboso ya kobongola mitema kati na Akayi, mpe ete bakomaki kosalela basantu. 16 Bino mpe, botosaka bato ya ndenge wana mpe moto nyonso oyo asalaka elongo na bango.
17 Nasepeli mingi komona Stefanasi, Fortinatisi mpe Akayikisi ; pamba te esali lokola namoni bino nyonso. 18 Balendisaki ngai, ndenge basalaka yango mbala na mbala mpo na bino. Boye, boyebaka kondima bato ya boye.
 
Bambote
19 Mangomba ya Azia etindeli bino mbote.
Akilasi mpe Prisika, elongo na Lingomba oyo esanganaka kati na ndako na bango, bapesi bino mbote mingi kati na Nkolo.
20 Bandeko nyonso batindeli bino mbote. Bopesanaka bino na bino mbote na nzela ya beze ya bule.
 
21 Ezali ngai, Polo, moto nazali kokoma mbote oyo, na loboko na ngai moko.
 
22 Soki ezali na moto oyo alingaka Nkolo te, tika ete alakelama mabe ! Oh Nkolo, yaka !
 
23 Tika ete ngolu ya Nkolo Yesu ezala na bino !
 
24 Bolingo na ngai ezali elongo na bino nyonso kati na Yesu-Klisto. Amen !